6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.+ Yo nde Yehova Nzambe na yo aponi mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+
9 Yehova akokómisa yo ekólo moko mosantu mpo na ye,+ kaka ndenge alapelaki yo ndai,+ mpo ozali kokoba kobatela mitindo+ ya Yehova Nzambe na yo, mpe otamboli na banzela na ye.