Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Hosea 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Mpe motángo ya bana ya Yisraele ekokóma lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki komekama te to kotángama te.+ Mpe ekosalema mpenza boye: na esika oyo bazalaki koloba na bango ete: ‘Bino bozali bato na ngai te,’+ bakoloba na bango boye: ‘Bana ya Nzambe ya bomoi.’+

  • Hosea 2:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe nakolona ye mpenza mpo na ngai ndenge balonaka momboto na mabele,+ mpe nakoyokela ye mawa, ye oyo bayokelaki ye mawa te,+ mpe nakoloba na baoyo bazali bato na ngai te ete: “Bozali bato na ngai”;+ mpe bango, bakoloba ete: “Ozali Nzambe na ngai.”’”+

  • Baroma 9:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ezali ndenge alobi yango mpe na Hosea: “Baoyo bazalaki bato na ngai te+ nakobenga bango ‘bato na ngai,’ mpe mwasi oyo azalaki mwasi na ngai ya bolingo te nakobenga ye ‘mwasi na ngai ya bolingo’;+

  • Baroma 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yango wana, nazali kotuna: Babɛtaki nde libaku mpe bakweaki+ mpenza kokwea? Te, ata moke te! Kasi na libaku oyo babɛtaki,+ lobiko eyeli bato ya bikólo.+ Bongo likambo yango eyokisa bango zuwa.+

  • 1 Petro 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na Ye;+ bozalaki bato oyo bayokelaki mawa te, kasi sikoyo bozali bato oyo bayokeli mawa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto