33 Mpe nakopalanganisa bino na kati ya bikólo,+ mpe nakobimisa mopanga na ekótó nsima na bino;+ mpe mokili na bino esengeli kotikala mpamba,+ mpe bingumba na bino ekokóma kaka bitiká mpamba.
25 Yehova akosala ete banguna na yo bálonga yo.+ Okobimela bango na nzela moko, kasi okokima liboso na bango na nzela nsambo; mpe okokóma mpenza eloko moko ya nsɔmɔ epai ya makonzi nyonso ya mabele.+
23 Lisusu, ngai moko natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai na esobe,+ mpo na kopalanganisa bango na kati ya bikólo mpe mpo na kopanza bango na kati ya mikili,+