25 Bokozikisa na mɔtɔ+ bikeko oyo eyemami ya banzambe na bango. Osengeli te kolula palata mpe wolo oyo ezali likoló na yango,+ mpe osengeli te kozwa yango mpo na yo,+ noki ekanga yo na motambo;+ mpo ezali eloko moko oyo Yehova Nzambe na yo ayinaka.+
3 Mpe bosengeli kokweisa bitumbelo+ na yango mpe kobuka makonzí na yango ya losambo,+ mpe bokozikisa na mɔtɔ banzete na yango ya losambo+ mpe bokokata bikeko oyo eyemami+ ya banzambe na yango, mpe bosengeli kolongola nkombo na yango na esika wana.+