Kobima 23:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Basengeli te kofanda na mokili na yo, noki bátinda yo osalela ngai lisumu. Soki osaleli banzambe na bango, yango ekokómela yo motambo.”+ Kolimbola Mibeko 12:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Kebá noki ozwama na motambo na kolandáká bango,+ nsima ya kosilisa bikólo yango nyɛɛ liboso na yo, mpe noki otuna mpo na banzambe na bango ete: ‘Ndenge nini bikólo oyo bazalaki kosalela banzambe na bango? Mpe ngai, ɛɛ, ngai, nakosala kaka bongo.’ Basambisi 2:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bongo ngai mpe nalobi: ‘Nakobengana bango liboso na bino te, mpe bakokómela bino mpenza mitambo,+ mpe banzambe na bango bakozala eloko oyo ekobenda bino.’”+ Nzembo 106:36 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 36 Mpe bazalaki se kosalela bikeko na bango,+Mpe yango ekómelaki bango motambo.+
33 Basengeli te kofanda na mokili na yo, noki bátinda yo osalela ngai lisumu. Soki osaleli banzambe na bango, yango ekokómela yo motambo.”+
30 Kebá noki ozwama na motambo na kolandáká bango,+ nsima ya kosilisa bikólo yango nyɛɛ liboso na yo, mpe noki otuna mpo na banzambe na bango ete: ‘Ndenge nini bikólo oyo bazalaki kosalela banzambe na bango? Mpe ngai, ɛɛ, ngai, nakosala kaka bongo.’
3 Bongo ngai mpe nalobi: ‘Nakobengana bango liboso na bino te, mpe bakokómela bino mpenza mitambo,+ mpe banzambe na bango bakozala eloko oyo ekobenda bino.’”+