Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “‘Mpe osengeli te kopesa nzela ete moko kati na bana na yo apesama+ na Moleke.+ Osengeli te kotuka+ nkombo ya Nzambe na yo ndenge wana. Ngai nazali Yehova.+

  • Kolimbola Mibeko 12:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Osengeli kosalela Yehova Nzambe na yo ndenge wana te,+ mpo eloko nyonso oyo Yehova ayini, oyo ye ayinaka mpenza, bato ya bikólo wana basalelaki yango banzambe na bango, mpo kutu bato ya bikólo yango bazali mbala na mbala kozikisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mpo na banzambe na bango.+

  • 2 Bakonzi 16:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe azalaki kotambola na nzela ya bakonzi ya Yisraele,+ mpe alekisaki kutu mwana na ye mbeka na mɔtɔ,+ na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki mpo na bana ya Yisraele.

  • 2 Ntango 28:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe abimisaki milinga ya mbeka+ na lobwaku ya mwana ya Hinome+ mpe akómaki kotumba bana na ye+ na mɔtɔ, na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.+

  • Nzembo 106:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+

      Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+

  • Yirimia 19:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala mpo na kotumba bana na bango na mɔtɔ lokola makabo mibimba ya kotumbela Baala,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe nalobelaki te,+ mpe oyo eyelaki ngai na motema te.”’+

  • Yirimia 32:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Lisusu, batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kolekisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka+ epai ya Moleke,+ likambo oyo napesaki bango mitindo te,+ mpe eyelaki ngai mpe na motema te ete nasala likambo yango oyo eyinamá,+ mpo na kosalisa Yuda lisumu.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto