Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe bópesa bango mitindo ete: ‘Bólɔkɔta mabanga+ zomi na mibale na katikati mpenza ya Yordani, na esika oyo makolo ya banganga-nzambe etɛlɛmaki kozanga koningana,+ mpe bokomema yango elongo na bino mpe bokotya yango na esika oyo bokolala,+ epai bokolala na butu ya lelo.’”

  • Yosua 5:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na nsima, Yehova alobaki na Yosua boye: “Lelo, nalongoli bino nsɔni ya Ezipito, nabaloli yango.”+ Yango wana, esika yango ekómá kobengama na nkombo Gilgale+ tii na mokolo ya lelo.

  • Yosua 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ntango mibali ya Gibeone bamoni bongo, batindeli Yosua bato na kaa ya Gilgale,+ balobi: “Lobɔkɔ na yo etika baombo na yo te.+ Matá mbangu epai na biso mpo na kobikisa biso mpe kosalisa biso, mpamba te bakonzi ya Baamore, oyo bafandaka na etúká ya ngombangomba bayangani mpo na kobunda na biso.”

  • Mika 6:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ee bato na ngai, nabondeli bino, bókanisa+ oyo Balake mokonzi ya Moabe akanaki kosala,+ mpe oyo Balaama mwana ya Beore ayanolaki ye.+ Bókanisa oyo nasalaki banda Shitime+ tii Gilgale,+ mpo misala ya boyengebene ya Yehova ekoka koyebana.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto