19 Mpe bato oyo babombanaki babimaki nokinoki na bisika na bango, mpe babandaki kopota mbangu na ntango oyo ye asembolaki lobɔkɔ na ye, mpe bakɔtaki na engumba mpe bazwaki yango.+ Na nsima, basalaki nokinoki mpe batyaki mɔtɔ na engumba.+
28 Bongo Yosua atumbaki Ai mpe akómisaki yango libondo ya putulu kino na ntango oyo etyami ndelo te,+ lokola esika etikali mpamba tii na mokolo ya lelo.