Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 21:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo nzala+ ekɔtaki na mikolo ya Davidi, elandanaki mbula na mbula, na boumeli ya mbula misato; mpe Davidi alukaki toli liboso ya Yehova. Bongo Yehova alobaki ete: “Ngambo ya makila ezali na motó ya Saulo mpe na ndako na ye, mpamba te abomaki Bagibeone.”+

  • Masese 6:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+

  • Masese 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+ Komikumisa ná lolendo,+ nzela mabe ná monɔkɔ oyo elobaka makambo ya kilikili,+ nayiná yango.

  • Zekaria 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 ‘Natindi yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe yango ekokɔta mpenza na ndako ya moyibi mpe na ndako ya moto oyo azali kolapa ndai na nkombo na ngai na lokuta;+ mpe yango ekofanda mpenza na kati ya ndako na ye mpe ekosilisa yango nyɛɛ ná mabaya na yango ná mabanga na yango.’”+

  • Zekaria 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe bókanaka te na mitema na bino koyeiselana likama,+ mpe bólingaka te ndai nyonso ya lokuta;+ mpo yango nde makambo nyonso oyo ngai nayini,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto