21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu,+ mpe Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba mpe kosala ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ezalaki kokabwana.+
23 ntango Yehova Nzambe na bino akaukisaki mai ya Yordani liboso na bango tii ntango basilisaki kokatisa, ndenge Yehova Nzambe na bino asalaki na Mbu Motane, ntango akaukisaki yango liboso na biso tii tosilisaki kokatisa;+
9 Mpe bango balobaki na ye: “Basaleli na yo bauti na mokili moko mosika+ mpenza mpo na nkombo+ ya Yehova Nzambe na yo, mpamba te toyokaki nsango ya lokumu na ye mpe nyonso oyo asalaki na Ezipito,+