Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 19:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 Wana nde mabula oyo nganga-nzambe Eleazare mpe Yosua, mwana ya Nunu, mpe bankumu ya batata ya mabota ya bana ya Yisraele bakabolaki+ na nzela ya mbɛsɛ, na Shilo,+ liboso ya Yehova, na monɔkɔ ya hema ya kokutana,+ mpo ezala mokili na bango. Bongo basilisaki kokabola mokili yango.

  • Yosua 21:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 mpe balobaki na bango na Shilo,+ na mokili ya Kanana, ete: “Yehova apesaki mitindo na nzela ya Moize ete bápesa biso bingumba ya kofanda, ná bisika na yango ya koleisa banyama na biso ya mboka matiti.”+

  • Yosua 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Nsima na yango, bana ya Rubene mpe bana ya Gade mpe ndambo ya libota ya Manase bazongaki mpe batikaki bana mosusu ya Yisraele na Shilo, oyo ezali na kati ya mokili ya Kanana, mpo na kokende na mokili ya Gileade,+ na mokili na bango, esika batyamaki, na kolanda etinda oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.+

  • Basambisi 21:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Nsukansuka, balobaki boye: “Talá! Fɛti ya Yehova ezalaka mbula na mbula na Shilo,+ oyo ezali na nɔrdi ya Betele, na ɛsti ya balabala monene oyo ematá banda na Betele tii na Shekeme+ mpe na sudi ya Lebona.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto