Basambisi 4:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpe bana ya Yisraele babandaki kobelela Yehova,+ mpamba te Sisera azalaki na makalo nkama libwa (900) ya bitumba oyo ezalaki na makwangola,+ mpe anyokolaki bana ya Yisraele+ makasi mbula ntuku mibale (20). 1 Samwele 13:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Nzokande, motuli moko te azalaki na mokili mobimba ya Yisraele, mpamba te Bafilistia balobaki ete: “Noki Baebre básala mopanga to likɔnga.”+
3 Mpe bana ya Yisraele babandaki kobelela Yehova,+ mpamba te Sisera azalaki na makalo nkama libwa (900) ya bitumba oyo ezalaki na makwangola,+ mpe anyokolaki bana ya Yisraele+ makasi mbula ntuku mibale (20).
19 Nzokande, motuli moko te azalaki na mokili mobimba ya Yisraele, mpamba te Bafilistia balobaki ete: “Noki Baebre básala mopanga to likɔnga.”+