10 Na bongo, alobaki lisusu ete: “Nakozonga solo epai na yo na mbula oyo ezali koya na ntango lokola oyo, mpe, talá! Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali.”+ Nzokande, Sara azalaki koyoka na monɔkɔ ya hema, oyo ezalaki nsima ya mobali yango.
20 Bongo esalemaki boye: nsima ya mbula moko, Hana azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo+ Samwele, mpamba te, ndenge alobaki yango, “Nasɛngaki+ ye nde na Yehova.”
16 Na nsima, alobaki boye: “Na mbula ekoya, na ntango oyo boye, okosimba mwana mobali.”+ Kasi ye alobaki ete: “Te, nkolo na ngai, Ee moto ya Nzambe ya solo! Koloba na mosaleli na yo makambo ya lokuta te.”
13 Kasi anzelu yango alobaki na ye ete: “Kobanga te, Zekaria, mpo lilɔmbɔ na yo eyokami mpe endimami,+ mpe mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yoane.+