Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kasi alelelaki ye na boumeli ya mikolo nsambo oyo fɛti na bango ezalaki kosalema, mpe esalemaki boye: nsukansuka, na mokolo ya nsambo, alimbolelaki ye yango, mpo atyaki ye mbamba.+ Na nsima, ye alimbolelaki bana ya bato ya ekólo na ye sambole yango.+

  • Basambisi 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Nsukansuka, afungolelaki ye motema na ye nyonso+ mpe alobaki na ye boye: “Razware+ eleká ata mokolo moko te na motó na ngai, mpamba te nazali Monaziri ya Nzambe banda na libumu ya mama na ngai.+ Soki bakati ngai nsuki, makasi na ngai mpe ekolongwa mpenza epai na ngai, mpe nakolɛmba solo mpe nakokóma lokola bato nyonso.”+

  • Masese 25:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Sambá likambo na yo na moninga na yo,+ mpe kobimisa te lisolo ya nkuku ya moto mosusu;+

  • Yirimia 9:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Bókeba moto na moto na moninga na ye;+ mpe bótyela ndeko ata moko motema te.+ Mpo ndeko nyonso alingi kaka kozwa esika ya ndeko na ye,+ mpe moninga nyonso alingi kaka kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo,+

  • Mika 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kondimela moninga te. Kotya motema epai ya moninga ya motema te.+ Batelá maloba ya monɔkɔ na yo liboso ya mwasi oyo azali kolala na ntolo na yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto