4 Bongo azongiselaki mama na ye palata yango, mpe mama na ye azwaki shekele ya palata nkama mibale (200) mpe apesaki yango mosali biloko ya palata.+ Mpe asalaki ekeko oyo eyemami+ mpe ekeko ya ebende oyo enyangwisami;+ mpe yango ezalaki na ndako ya Mika.
5 Nzokande, mobali yango Mika azalaki na ndako moko ya banzambe,+ mpe asalaki efode+ mpe baterafime+ mpe atondisaki lobɔkɔ ya mwana na ye moko ya mobali na nguya,*+ mpo asalela ye mosala ya nganga-nzambe.+