19 Bongo balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe bafukamaki elongi na nse liboso ya Yehova, na nsima, bazongaki mpe bakómaki na ndako na bango na Rama.+ Sikoyo Elekana asangisaki nzoto+ na mwasi na ye Hana, mpe Yehova akanisaki ye.+
3 Sikoyo Samwele asilaki kokufa, mpe Yisraele mobimba esilaki kolela ye mpe kokunda ye na engumba na ye, na Rama.+ Nde Saulo alongolaki na mokili bato oyo basololaka na bilimo mpe bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+