1 Samwele 2:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Na yango, Yehova atyaki likebi na ye epai ya Hana,+ bongo azwaki zemi mpe abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale.+ Nde elenge Samwele azalaki se kokola liboso ya Yehova.+ Masese 3:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 bongo ondimama mpe ozala na mayele mingi ya kososola na miso ya Nzambe mpe ya moto ya mabele.+ Luka 2:52 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 52 Mpe Yesu akobaki kokola na bwanya+ mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.+
21 Na yango, Yehova atyaki likebi na ye epai ya Hana,+ bongo azwaki zemi mpe abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale.+ Nde elenge Samwele azalaki se kokola liboso ya Yehova.+