Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 28:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 “Mpe yo, zwá Arona ndeko na yo mpe bana na ye ya mibali elongo na ye na kati ya bana ya Yisraele mpe bɛlɛmisá bango na yo mpo básalela ngai mosala ya nganga-nzambe:+ Arona,+ Nadabe ná Abihu,+ Eleazare ná Itamare,+ bana mibali ya Arona.

  • Kobima 39:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe na nsinga ya bulé ná lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi,+ batongaki bilamba+ na mitonga mpo na mosala na esika mosantu.+ Bongo basalelaki Arona bilamba mosantu,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

  • Balevi 8:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nsukansuka asopaki mwa ndambo ya mafuta mosantu na motó ya Arona mpe atyaki ye mafuta mpo na kosantisa ye.+

  • Mitángo 16:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na nsima, alobaki na Kora mpe na liyangani na ye mobimba ete: “Na ntɔngɔ Yehova akoyebisa nani azali moto na ye+ mpe nani azali mosantu+ mpe nani asengeli kobɛlɛma na ye,+ mpe moto oyo ye akopona,+ akobɛlɛma na ye.

  • Mitángo 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe talá oyo ekosalema: moto oyo nakopona,+ lingenda na ye ekobimisa nkasa ya sika, mpe nakosukisa mpenza koimaima+ ya bana ya Yisraele oyo bazali koimaima mpo na ngai, koimaima oyo bazali koimaima mpo na bino.”+

  • Mitángo 17:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe na mokolo oyo elandaki, esalemaki boye: ntango Moize akɔtaki na hema ya Litatoli, talá! lingenda ya Arona mpo na ndako ya Levi ebimisaki nkasa ya sika, mpe ezalaki kobimisa nkasa ya sika ná bafololo mpe ezalaki kobota mbuma ya amande oyo eteli.

  • Nzembo 99:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Moize ná Arona bazalaki na kati ya banganga-nzambe na ye,+

      Mpe Samwele azalaki na kati ya baoyo bazalaki kobelela nkombo na ye.+

      Bazalaki kobelela Yehova, mpe ye azalaki koyanola bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto