Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 2:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe oyo etikali na likabo ya mbuma, ezali ya Arona ná bana na ye ya mibali,+ lokola eloko oyo eleki bosantu,+ euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ.

  • Balevi 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe ndambo na yango oyo etikali, Arona ná bana na ye ya mibali bakolya.+ Ekolyama lokola bagato+ ezangá levire, na esika mosantu. Bakolya yango na lopango ya hema ya kokutana.

  • Balevi 10:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe bokolya ntolo ya likabo ya koningisa+ ná lokolo ya eteni oyo esantisami+ kati na esika ya pɛto, yo ná bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi elongo na yo,+ mpamba te bapesi yo yango lokola pɔsɔ na yo mpe pɔsɔ ya bana na yo ya mibali oyo euti na bambeka ya boyokani ya bana ya Yisraele.

  • Mitángo 5:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘Mpe likabo+ mokomoko ya biloko mosantu+ nyonso ya bana ya Yisraele, oyo bakopesa nganga-nzambe, ekokóma ya ye.+

  • Mitángo 18:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Talá oyo ekokóma ya yo na biloko oyo eleki bosantu, na likabo oyo etumbami na mɔtɔ: likabo nyonso na bango ná likabo nyonso na bango ya mbuma,+ mpe likabo nyonso na bango mpo na lisumu,+ mpe likabo nyonso na bango ya ngambo,+ oyo bakozongisela ngai. Ezali eloko oyo eleki bosantu mpo na yo mpe mpo na bana na yo ya mibali.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto