Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 18:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe Moize aponaki mibali oyo bakoki na kati ya Yisraele mobimba mpe apesaki bango bisika bázala bakonzi ya bato,+ bázala bakonzi ya bato nkóto nkóto, bakonzi ya bato nkama nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano ntuku mitano mpe bakonzi ya bato zomi zomi.

  • Basambisi 21:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na yango, bankumu ya liyangani balobaki boye: “Tokosala nini mpo na kozwa basi mpo na mibali oyo batikali, awa basi nyonso ya Benyamina basili nyɛɛ?”

  • 1 Samwele 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Ntango bato ya etumba bakómaki na kaa, mikóló ya Yisraele babandaki koloba boye: “Mpo na nini Yehova akweisi biso liboso ya Bafilistia lelo?+ Tiká tózwa sanduku ya kondimana ya Yehova+ na Shilo, mpo eya na katikati na biso mpe ebikisa biso na lobɔkɔ ya banguna na biso.”

  • 2 Samwele 5:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo mikóló nyonso+ ya Yisraele bayaki epai ya mokonzi, na Hebrone, mpe Mokonzi Davidi asalaki kondimana+ ná bango na Hebrone, liboso ya Yehova; nsima na yango, batyaki Davidi mafuta+ mpo azala mokonzi ya Yisraele.+

  • 1 Bakonzi 20:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na yango, mokonzi ya Yisraele abengaki mikóló nyonso ya mboka+ mpe alobaki boye: “Nabondeli bino, bótala mpe bómona ete moto oyo azali kolukela biso mpasi;+ mpo atindeli ngai bato mpo na kozwa basi na ngai ná bana na ngai, ná palata na ngai ná wolo na ngai, mpe naboyelaki ye yango te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto