Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo elimo ya Yehova ekómaki kosala kati na ye+ mpe apasolaki mwana-nkɔsi yango na mibale, ndenge bapasolaka mwana-ntaba, nzokande azalaki na eloko moko te na lobɔkɔ na ye. Mpe ayebisaki te tata na ye to mama na ye likambo oyo asalaki.

  • 1 Samwele 11:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ntango ayokaki maloba yango, elimo+ ya Nzambe ebandaki kosala kati na Saulo mpe nkanda na ye engalaki makasi.+

  • 1 Samwele 16:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango, Samwele azwaki liseke ya mafuta+ mpe atyaki ye mafuta na katikati ya bandeko na ye. Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.+ Na nsima, Samwele atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela, akei na Rama.+

  • Zekaria 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo ayanolaki mpe alobaki na ngai ete: “Liloba oyo Yehova alobi na Zerubabele, yango oyo: ‘“Na limpinga ya basoda te,+ na nguya mpe te,+ kasi nde na elimo na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

  • 2 Bakorinti 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ezali te ete biso tobongi mpenza na ndenge na biso moko mpo na komona ete eloko boye to boye euti na biso moko,+ kasi kobonga na biso mpenza euti nde na Nzambe,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto