19 Mpe ekosalema mpenza boye: moto nyonso oyo akobima na baporte ya ndako na yo tii na libándá,+ makila na ye ekozala na motó na ye moko, mpe biso tokozala na ngambo te; mpe moto nyonso oyo akotikala elongo na yo na ndako, makila na ye ekozala na mitó na biso soki lobɔkɔ moko ekiteli ye.
24 mpo mabe oyo basalelaki bana mibali ntuku nsambo (70) ya Yerubaala eya+ mpe mpo atya makila na bango na motó ya Abimeleke, ndeko na bango, mpamba te abomaki bango,+ mpe na motó ya bankolo-mabele ya Shekeme mpamba te balendisaki ye+ mpo na koboma bandeko na ye.
11 bongo ekozala boni ntango bato mabe+ mpenza babomi moyengebene na kati ya ndako na ye moko na mbeto na ye? Sikoyo, nasengeli nde kosɛnga makila na ye na mabɔkɔ na bino te,+ mpe nasengeli nde kolongola bino na mokili te?”+
37 Mpe ekosalema mpenza boye: mokolo oyo okobima mpe okokatisa lobwaku ya mokɛli ya Kidrone,+ yebá malamu ete okokufa solo.+ Ngambo ya makila na yo ekozala na motó na yo moko.”+
13 Soki apesi biloko mpo na kozwa benefisi ya lokoso,+ mpe soki azwi benefisi,+ boye, ya solo mpenza, akotikala na bomoi te. Asali makambo nyonso wana oyo eyinamá.+ Akobomama mpenza. Makila na ye ekozala na motó na ye.+
6 Kasi nsima, lokola bango bakobaki kotɛmɛla mpe koloba mabe,+ apupolaki bilamba+ na ye mpe alobaki na bango ete: “Makila+ na bino ezala na mitó na bino moko. Ngai nazali pɛto.+ Banda sikoyo nakokende epai ya bato ya bikólo.”+