Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe bana ya Yisraele bakómaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova+ mpe kosalela Babaala.+

  • Basambisi 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bana ya Yisraele bakómaki lisusu kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ mpe babandaki kosalela Babaala+ mpe bikeko ya Ashitorete,+ banzambe ya Siri,+ banzambe ya Sidone,+ banzambe ya Moabe,+ banzambe ya bana ya Amone+ ná banzambe ya Bafilistia.+ Bongo batikaki Yehova mpe basalelaki ye te.+

  • 2 Bakonzi 10:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Bongo bóbengela ngai basakoli+ nyonso ya Baala, basambeli+ na ye nyonso ná banganga-nzambe+ na ye nyonso. Ata moko azanga te, mpamba te nasengeli kopesa Baala mbeka monene. Moto nyonso oyo akozanga akotikala na bomoi te.” Nzokande, Yehu asalaki mayele+ mpo aboma basambeli ya Baala.

  • 2 Bakonzi 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bazalaki se kotika mibeko+ nyonso ya Yehova Nzambe na bango mpe bamisalelaki bikeko ya ebende oyo enyangwisami,+ bana-ngɔmbɛ mibale,+ mpe basalaki nzete moko ya losambo+ mpe babandaki kogumbamela limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela Baala;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto