Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Farini ya elokó ya monene esilaki te, mpe mafuta ya elokó ya moke ezangaki te,+ na kolanda liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Eliya.

  • 1 Bakonzi 17:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nsukansuka, Yehova ayokaki mongongo+ ya Eliya, bongo molimo ya mwana ezongaki kati na ye mpe azongaki na bomoi.+

  • 1 Bakonzi 18:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpe esalemaki boye: na ntango+ oyo likabo ya mbuma epesamaka, mosakoli Eliya abandaki kopusana penepene mpe koloba boye: “Ee Yehova, Nzambe ya Abrahama,+ ya Yisaka+ mpe ya Yisraele,+ tiká eyebana lelo ete ozali Nzambe na Yisraele+ mpe nazali mosaleli na yo mpe ezali na liloba na yo+ nde nasali makambo oyo nyonso.

  • 1 Bakonzi 18:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 Mpe lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló ya Eliya,+ bongo akangaki mokaba na loketo na ye+ mpe apotaki mbangu liboso ya Ahaba tii na Yizireele.+

  • 2 Bakonzi 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na nsima, Eliya azwaki elamba na ye ya mosala+ mpe alíngaki yango mpe abɛtaki mai, mpe nsukansuka mai ekabwanaki epai na epai, bongo bango mibale bakatisaki na mabele oyo ekauki.+

  • 2 Bakonzi 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe esalemaki boye: wana bazalaki kotambola, bazali kosolola nzelanzela, talá! likalo moko ya etumba,+ ya mɔtɔ, mpe bampunda ya mɔtɔ, ekaboli bango mibale; bongo Eliya amataki na likoló na mopɛpɛ makasi.+

  • 2 Ntango 21:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Nsukansuka, mokanda+ eyelaki ye, oyo eutaki na mosakoli Eliya,+ elobi: “Talá oyo Yehova Nzambe ya nkɔkɔ na yo Davidi alobi: ‘Lokola otamboli na banzela ya tata na yo Yehoshafate+ te to na banzela ya Asa+ mokonzi ya Yuda te,

  • Luka 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Lisusu, akotambola liboso na ye na elimo mpe na nguya ya Eliya,+ mpo na kozongisa mitema+ ya batata epai ya bana mpe bato oyo bazangá botosi epai ya mayele ya bayengebene, mpo na kolɛngɛlɛla Yehova+ bato oyo babongisami.”+

  • Yoane 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe batunaki ye ete: “Kasi yo nani? Ozali Eliya?”+ Mpe alobaki ete: “Nazali ye te.” “Ozali Mosakoli?”+ Mpe ayanolaki ete: “Te!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto