13 Mpe ayebisaki bino kondimana+ na ye, oyo apesaki bino mitindo ete bókokisa yango—Maloba Zomi+ wana, nsima na yango, akomaki yango na bitanda mibale ya mabanga.+
9 Ntango namataki na ngomba mpo na kozwa bitanda ya mabanga,+ bitanda ya kondimana oyo Yehova asalaki ná bino,+ mpe nafandaki na ngomba mikolo ntuku minei (40) butu moi,+ (nalyaki mampa te mpe namɛlaki mai te,)
9 Eloko moko te ezalaki na kati ya Sanduku, longola kaka bitanda mibale ya mabanga+ oyo Moize atyaki,+ na Horebe, ntango Yehova asalaki kondimana+ ná bana ya Yisraele wana bazalaki kobima na mokili ya Ezipito.+