40 Mpe bakoyambola mpenza libunga na bango+ mpe libunga ya batata na bango na kati ya kozanga bosembo na bango ntango bazangaki bosembo epai na ngai, ɛɛ, ntango batɛmɛlaki ngai na etamboli na bango.+
13 Mpe azalaki kobondela Ye, bongo Ye andimaki libondeli+ ya Manase mpe ayokaki lilɔmbɔ na ye mpo na kondimama mpe azongisaki ye na Yerusaleme na bokonzi na ye;+ mpe Manase ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.+