Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe oyebi malamu lelo, mpe osengeli kokanisa na motema na yo ete Yehova azali Nzambe ya solo kuna na likoló mpe awa na mabele.+ Mosusu azali te.+

  • 1 Bakonzi 18:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Ntango bato nyonso bamonaki yango, na mbala moko bakweaki bilongi na nse+ mpe balobaki ete: “Yehova azali Nzambe ya solo! Yehova azali Nzambe ya solo!”

  • Yirimia 10:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Yehova azali Nzambe na bosolo.+ Azali Nzambe ya bomoi+ mpe Mokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Mpo na nkanda na ye mabele ekoningana,+ mpe bato ya bikólo bakokoka te makaneli na ye.+

  • Ezekiele 36:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 ‘Mpe ya solo, nakosantisa nkombo na ngai monene,+ oyo bazalaki kokómisa eloko mpamba na kati ya bikólo, oyo bokómisaki eloko mpamba na katikati na yango; mpe bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango.+

  • Ezekiele 39:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nakosala ete nkombo na ngai mosantu eyebana na kati ya bato na ngai Yisraele, mpe nakotika lisusu te ete bákómisa nkombo na ngai mosantu eloko mpamba;+ mpe bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ Mosantu na Yisraele.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto