Nzembo 96:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba;+Kasi Yehova asalá likoló.+ Yisaya 37:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Mpe bazikisaki banzambe na bango na mɔtɔ,+ mpo bazali banzambe te,+ kasi mosala ya mabɔkɔ ya moto,+ nzete mpe libanga, bongo babebisaki yango.+ Yisaya 41:29 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 29 Talá! Bango nyonso bazali lokola eloko oyo ezali te. Misala na bango ezali mpamba. Bikeko na bango ya konyangwa ezali mopɛpɛ mpe eloko moko ya solo te.+ 1 Bakorinti 8:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+
19 Mpe bazikisaki banzambe na bango na mɔtɔ,+ mpo bazali banzambe te,+ kasi mosala ya mabɔkɔ ya moto,+ nzete mpe libanga, bongo babebisaki yango.+
29 Talá! Bango nyonso bazali lokola eloko oyo ezali te. Misala na bango ezali mpamba. Bikeko na bango ya konyangwa ezali mopɛpɛ mpe eloko moko ya solo te.+
4 Sikoyo, mpo na likambo oyo etali kolya+ bilei oyo epesami na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te+ na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka moko.+