16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+
14 Na Siona, basumuki bakómi na nsɔmɔ;+ kolɛnga ekangi bapɛngwi:+ ‘Nani kati na biso akoki kofanda mwa ntango na mɔtɔ oyo ezali kozikisa?+ Nani kati na biso akoki kofanda mwa ntango na mɔtɔ monene oyo ezali kopela mpo na ntango molai?’+
27 “‘“Kasi soki botosi ngai te na kosantisáká mokolo ya sabata mpe na koboyáká komema mokumba,+ kasi soki bokɔti na yango na baporte ya Yerusaleme na mokolo ya sabata, nakotya mpe mɔtɔ na baporte na yango,+ mpe ekozikisa mpenza bandako milai ya kofanda ya Yerusaleme+ mpe ekobomama te.”’”+