Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 10:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Ntango alongwaki na esika wana akei, akutanaki na Yehonadabe+ mwana ya Rekabe+ azali koya kokutana na ye. Ntango apambolaki+ ye, alobaki na ye boye: “Motema na yo ezali sembo epai na ngai, ndenge motema na ngai ezali epai ya motema na yo?”+

      Na yango, Yehonadabe alobaki ete: “Ɛɛ.”

      “Soki ezali bongo, pesá ngai lobɔkɔ na yo.”

      Bongo apesaki ye lobɔkɔ. Mpe amatisaki ye na likalo esika moko na ye.+

  • Yirimia 35:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kasi balobaki ete: “Tokomɛla vinyo te, mpo Yonadabe mwana ya Rekabe,+ nkɔkɔ na biso, ye nde apesaki biso mitindo ete: ‘Bosengeli komɛla vinyo te, ezala bino to bana na bino, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yirimia 35:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 na yango talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Yonadabe mwana ya Rekabe akozanga moto te mpo na kotɛlɛma+ liboso na ngai, ntango nyonso.”’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto