1 Bakonzi 1:34 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 34 Mpe nganga-nzambe Zadoke ná mosakoli Natane bátya ye mafuta+ kuna mpo azala mokonzi na Yisraele; mpe bóyula liseke+ mpe bóloba ete: ‘Mokonzi Salomo azala na bomoi!’+ Nzembo 72:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Mpe azala na bomoi,+ mpe bápesa ye mwa ndambo ya wolo ya Sheba.+Mpe bábondela mpo na ye ntango nyonso;Apambolama mokolo mobimba.+ Mosakoli 10:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+
34 Mpe nganga-nzambe Zadoke ná mosakoli Natane bátya ye mafuta+ kuna mpo azala mokonzi na Yisraele; mpe bóyula liseke+ mpe bóloba ete: ‘Mokonzi Salomo azala na bomoi!’+
15 Mpe azala na bomoi,+ mpe bápesa ye mwa ndambo ya wolo ya Sheba.+Mpe bábondela mpo na ye ntango nyonso;Apambolama mokolo mobimba.+
17 Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+