Kolimbola Mibeko 12:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Kebá noki ozwama na motambo na kolandáká bango,+ nsima ya kosilisa bikólo yango nyɛɛ liboso na yo, mpe noki otuna mpo na banzambe na bango ete: ‘Ndenge nini bikólo oyo bazalaki kosalela banzambe na bango? Mpe ngai, ɛɛ, ngai, nakosala kaka bongo.’ 2 Ntango 28:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Mpe abandaki kopesa mbeka na banzambe+ ya Damasi+ oyo bazalaki kobɛta ye, mpe azalaki koloba: “Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bazali kosalisa bango,+ nakopesa bango mbeka, mpo básalisa+ ngai.” Mpe bakómelaki ye ná Yisraele mobimba eloko oyo ezali kobɛtisa libaku.+ Yirimia 10:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Talá oyo Yehova alobi: “Bóyekola nzela ya bikólo mosusu ata moke te,+ mpe bózala na nsɔmɔ te mpo na bilembo ya likoló, mpamba te bato ya bikólo bazali na nsɔmɔ mpo na yango.+
30 Kebá noki ozwama na motambo na kolandáká bango,+ nsima ya kosilisa bikólo yango nyɛɛ liboso na yo, mpe noki otuna mpo na banzambe na bango ete: ‘Ndenge nini bikólo oyo bazalaki kosalela banzambe na bango? Mpe ngai, ɛɛ, ngai, nakosala kaka bongo.’
23 Mpe abandaki kopesa mbeka na banzambe+ ya Damasi+ oyo bazalaki kobɛta ye, mpe azalaki koloba: “Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bazali kosalisa bango,+ nakopesa bango mbeka, mpo básalisa+ ngai.” Mpe bakómelaki ye ná Yisraele mobimba eloko oyo ezali kobɛtisa libaku.+
2 Talá oyo Yehova alobi: “Bóyekola nzela ya bikólo mosusu ata moke te,+ mpe bózala na nsɔmɔ te mpo na bilembo ya likoló, mpamba te bato ya bikólo bazali na nsɔmɔ mpo na yango.+