17 Bongo basi oyo bazalaki kofanda penepene+ na bango bapesaki ye nkombo: “Naomi aboti mwana mobali.” Mpe babandaki kobenga ye na nkombo Obede.+ Ye nde tata ya Yese,+ tata ya Davidi.
14 Kasi sikoyo bokonzi na yo ekoumela te.+ Ya solo, Yehova akozwa moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye;+ mpe Yehova akotya ye mokambi+ ya bato na ye, mpamba te yo otosi te mitindo oyo Yehova apesaki yo.”+
28 Na yango Samwele alobaki na ye boye: “Yehova alongoli+ bokonzi ya Yisraele epai na yo lelo oyo, mpe akopesa yango mpenza moninga na yo oyo aleki yo.+
3 Bongo mikóló nyonso+ ya Yisraele bayaki epai ya mokonzi, na Hebrone, mpe Mokonzi Davidi asalaki kondimana+ ná bango na Hebrone, liboso ya Yehova; nsima na yango, batyaki Davidi mafuta+ mpo azala mokonzi ya Yisraele.+