Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 29:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bomɛngo+ mpe nkembo+ eutaka na yo, mpe ozali koyangela+ eloko nyonso; mpe makasi+ ná nguya+ ezali na lobɔkɔ na yo, mpe likoki ya kokómisa moto nyonso monene+ ná makasi ezali na lobɔkɔ na yo.+

  • Nzembo 62:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mbala moko Nzambe alobi, mbala mibale nayoki likambo oyo:+

      Makasi ezali ya Nzambe.+

  • Yisaya 14:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo Yehova ya mampinga ye moko akani yango,+ bongo nani akoki kobebisa yango?+ Mpe lobɔkɔ na ye nde esembolami, bongo nani akoki kozongisa yango nsima?+

  • Yisaya 40:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Talá! Bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini; mpe etalelami lokola mwa putulu moke likoló ya bimekeli-kilo.+ Talá! Atombolaka bisanga+ lokola mwa putulu moke mpenza.

  • Danyele 4:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe bato nyonso oyo bafandi na mabele bamonani lokola eloko mpamba,+ mpe azali kosala ndenge ye moko alingi na kati ya limpinga ya likoló mpe na kati ya bato oyo bafandi na mabele.+ Mpe moto moko te akoki kokanga lobɔkɔ na ye+ to koloba na ye ete: ‘Osali nini?’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto