1 Samwele 2:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe Hana abondelaki+ mpe alobaki boye:“Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yehova,+Ya solo, Yehova atomboli liseke na ngai.+Monɔkɔ na ngai efungwami mpo na kozongisela banguna na ngai,Mpamba te nasepeli na lobiko na yo.+ Nehemia 12:43 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 43 Mpe bapesaki mbeka na mokolo yango, bambeka minene+ mpe basepelaki,+ mpo Nzambe ya solo asepelisaki bango na esengo monene.+ Mpe lisusu basi+ ná bana+ basepelaki, bongo kosepela ya Yerusaleme eyokanaki mosika.+ Nzembo 20:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na yo,+Mpe na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.+Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.+ Nzembo 30:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Ee Yehova, nakokumisa yo mpo omatisi ngai+Mpe otiki te ete banguna na ngai básepela mpo na ngai.+
2 Mpe Hana abondelaki+ mpe alobaki boye:“Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yehova,+Ya solo, Yehova atomboli liseke na ngai.+Monɔkɔ na ngai efungwami mpo na kozongisela banguna na ngai,Mpamba te nasepeli na lobiko na yo.+
43 Mpe bapesaki mbeka na mokolo yango, bambeka minene+ mpe basepelaki,+ mpo Nzambe ya solo asepelisaki bango na esengo monene.+ Mpe lisusu basi+ ná bana+ basepelaki, bongo kosepela ya Yerusaleme eyokanaki mosika.+
5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na yo,+Mpe na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.+Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.+