10 Na yango, bóyeba ete liloba ya Yehova ata moko te, oyo Yehova alobaki mpo na ndako ya Ahaba,+ ekozanga kokokisama;*+ mpe Yehova ye moko asali oyo alobaki na nzela ya mosaleli na ye Eliya.”+
11 Lisusu, Yehu abomaki bato nyonso ya ndako ya Ahaba oyo batikalaki na Yizireele mpe bato na ye nyonso ya minene+ mpe bato oyo bayebanaki na ye mpe banganga-nzambe na ye,+ kino atikaki ata moto na ye moko te na bomoi.+