10 Bongo natɛlɛmaki pene na ye mpe nabomaki ye mbala moko,+ mpo nayebaki ete akoki kobika te ndenge akweaki. Na nsima, nazwaki motole+ na motó na ye mpe ekɔmɔ oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye, mpo namemela yango nkolo na ngai awa.”
30 Mpe alongolaki motole ya Malakame na motó na yango,+ kilo na yango ezalaki talanta moko ya wolo, elongo na mabanga ya ntalo; mpe ekómaki na motó ya Davidi. Mpe biloko oyo bapunzaki+ na engumba yango mpe oyo abimisaki ezalaki mingi mpenza.