16 Nsima na yango, asalaki bisaleli oyo ezali likoló ya mesa, basaani na yango mpe bakɔpɔ na yango mpe mabakuli na yango mpe bilokó na yango oyo bazalaki kosalela mpo na kosopa makabo ya masanga; asalaki yango na wolo ya pɛto.+
84 Wana ezalaki likabo+ ya bofungoli etumbelo, na mokolo oyo yango etyamaki mafuta, likabo oyo bankumu+ ya Yisraele bapesaki: basaani zomi na mibale ya palata, mabakuli+ zomi na mibale ya palata, bakɔpɔ zomi na mibale ya wolo;