10 Bongo esalemaki boye: ntango kaka Arona alobaki na liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, babalukaki mpe batalaki na epai ya esobe, mpe, talá! nkembo ya Yehova emonanaki na kati ya lipata.+
4 Mpe nkembo ya Yehova+ ebandaki kolongwa epai ya bakeruba mpo na kokende na monɔkɔ ya ndako, mpe nsukansuka ndako etondaki na lipata,+ mpe lopango etondaki na kongɛnga ya nkembo ya Yehova.
23 Mpe engumba yango ezali na mposa ya moi te mpe ya sanza te mpo na kongɛngisa yango, mpo nkembo ya Nzambe ezalaki kopesa yango pole,+ mpe mwinda na yango Mwana-Mpate.+