27 Nsukansuka, banganga-nzambe, Balevi, batɛlɛmaki mpe bapambolaki+ bato; mpe mongongo na bango eyokamaki, bongo libondeli na bango ekómaki na esika na ye mosantu, na likoló.+
24 Mpo Kristo akɔtaki, na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.+