16 ngai, ɛɛ ngai, nakosalela bino makambo oyo: nakoyeisela bino etumbu ya kotungisama na tibɛrkiloze+ ná fiɛvrɛ makasi, oyo ekobebisa miso+ mpe ekolɛmbisa molimo.+ Mpe bokolona mpenza mboto na bino kaka mpamba, mpo banguna na bino bakolya yango.+
46 Nsima na yango, Moize alobaki na Arona ete: “Zwá eloko ya kotya mɔtɔ mpe tyá mɔtɔ oyo euti likoló ya etumbelo na kati na yango+ mpe tyá mpaka ya malasi mpe kende mbangu na liyangani mpe zipá masumu na bango,+ mpamba te Yehova ayoki nkanda.+ Bolɔzi ebandi!”
19 “‘To soki natindeli mokili yango maladi mabe+ mpe soki nasopeli mpenza yango nkɛlɛ na ngai oyo ezali kosopa makila,+ mpo na kolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka,