Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 5:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Kasi bábongisa nde motema na bango wana, mpo bábanga ngai+ mpe bábatela ntango nyonso mibeko+ na ngai nyonso, mpo makambo na bango mpe ya bana na bango etambola malamu mpo na ntango oyo etyami ndelo te!+

  • 1 Samwele 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Samwele alobaki na ndako mobimba ya Yisraele ete: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova,+ bólongola kati na bino banzambe ya bapaya+ mpe bikeko ya Ashitorete,+ mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye,+ mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+

  • 1 Bakonzi 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na nsima, Eliya apusanaki epai ya bato nyonso mpe alobaki boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi?*+ Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye;+ kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.” Mpe bato bazongiselaki ye ata liloba moko te.

  • Marko 12:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.’+

  • Baroma 12:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bolingo+ na bino ezala na bokosi te.+ Bóyina oyo ezali mabe,+ bókangama na oyo ezali malamu.+

  • Yakobo 5:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bino mpe bózala na motema molai;+ bókómisa mitema na bino ngwi, mpo kozala ya Nkolo ekómi pene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto