Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bango mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná,+ makonzí ya losambo+ ná nzete ya losambo,+ na ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • 2 Bakonzi 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kasi bisika oyo etombwaná elimwaki te.+ Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.+

  • 2 Bakonzi 23:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na yango, abomaki likoló ya bitumbelo banganga-nzambe+ nyonso ya bisika oyo etombwaná oyo bazalaki wana mpe atumbaki mikuwa ya bato likoló na yango.+ Na nsima, azongaki na Yerusaleme.

  • Ezekiele 6:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso:+ Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike,+ na banzela ya mai mpe na mabwaku: “Ngai oyo! Nazali kokitisela bino mopanga, mpe nakobebisa mpenza bisika na bino oyo etombwaná.+

  • Ezekiele 16:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe ozwaki bilamba na yo mosusu mpe omisalelaki bisika oyo etombwaná+ ya langi ndenge na ndenge, mpe ozalaki kosala bondumba likoló na yango+—makambo ya boye esalemaka te, mpe esengeli kosalema te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto