- 
	                        
            
            Yirimia 29:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
- 
                            - 
                                        14 Mpe nakomitika ete bózwa ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakoyanganisa etuluku ya bakangami na bino mpe nakosangisa bino uta na bikólo nyonso mpe uta na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakozongisa bino lisusu na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+ 
 
- 
                                        
- 
	                        
            
            Yirimia 33:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
- 
                            - 
                                        11 makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bókumisa Yehova ya mampinga, mpo Yehova azali malamu;+ mpo motema boboto na ye ezali seko na seko!”’+ “‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’+ Yehova alobi bongo.” 
 
-