9 Mpo na Yehova, miso na ye+ ezali kotambolatambola na mabele mobimba+ mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema+ na bango ezali mobimba epai na ye. Osali bozoba+ na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”+
6 Ezera yango autaki na Babilone; mpe ayebaki malamu kosala bakopi+ ya mobeko ya Moize,+ oyo Yehova Nzambe ya Yisraele apesaki, bongo mokonzi apesaki ye nyonso oyo asɛngaki,+ mpo lobɔkɔ ya Yehova Nzambe na ye ezalaki elongo na ye.
28 Mpe amoniseli ngai motema boboto+ liboso ya mokonzi ná bapesi-toli+ na ye mpe liboso ya bankumu nyonso ya nguya ya mokonzi. Mpe ngai, ɛɛ ngai, namilendisaki mpo lobɔkɔ+ ya Yehova Nzambe na ngai ezalaki elongo na ngai, mpe nabandaki koyanganisa bankumu ya Yisraele mpo bámata elongo na ngai.
6 Bongo ayanolaki mpe alobaki na ngai ete: “Liloba oyo Yehova alobi na Zerubabele, yango oyo: ‘“Na limpinga ya basoda te,+ na nguya mpe te,+ kasi nde na elimo na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.