Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe amemaki na mboka mopaya+ Yerusaleme mobimba ná bankumu+ nyonso ná bilombe nyonso mpe mibali ya nguya+—amemaki bato nkóto zomi (10 000) na mboka mopaya—mpe lisusu moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ ná motongi nyonso ya bifelo ya makasi ya libateli. Ata moto moko te atikalaki, longola kaka bato mpamba+ kati na bato ya mokili.

  • 2 Ntango 36:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Lisusu, baoyo batikalaki, baoyo babikaki na mopanga, amemaki bango bakangami na Babilone,+ mpe bakómaki basaleli na ye+ mpe ya bana na ye tii ntango bokonzi ya Perse+ ebandaki koyangela;

  • Yirimia 39:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki na engumba, mpe baoyo bakimaki mpo na kokende epai na ye, mpe bato mosusu na kati na baoyo batikalaki, Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi+ amemaki bango na mboka mopaya, na Babilone.+

  • Yirimia 52:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe bamosusu kati na baoyo bazangá kati na bato mpe bato mosusu kati na bato oyo batikalaki na engumba+ mpe bato oyo bakimaki oyo bakendaki epai ya mokonzi ya Babilone mpe basali ya mayele oyo batikalaki, Nebuzaradane mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi amemaki bango na mboka mopaya.+

  • Yirimia 52:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Talá bato oyo Nebukadrezare amemaki na mboka mopaya: na mbula ya nsambo, Bayuda nkóto misato na ntuku mibale na misato (3 023).+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto