14 Mpe osengeli kosepela na boumeli ya fɛti na yo,+ yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi ná Molevi ná moto oyo afandi mopaya ná mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá, baoyo bazali na kati ya baporte na yo.
15 Mikolo nsambo, okosala fɛti+ mpo na Yehova Nzambe na yo na esika oyo Yehova akopona, mpamba te Yehova Nzambe na yo akopambola+ yo na mbuma na yo nyonso mpe na misala na yo nyonso, mpe osengeli kozala kaka na esengo.+