Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo nayebi malamu ete okozongisa ngai na liwa,+

      Mpe na ndako ya koyangana ya bato nyonso oyo bazali na bomoi.

  • Nzembo 49:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka,+

      Zoba ná moto oyo azangi mayele bango nyonso bakufaka,+

      Mpe basengeli kotikela bato mosusu biloko na bango ya kobikela.+

  • Mosakoli 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bango nyonso bakokende esika moko.+ Bango nyonso bauti na putulu,+ mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu.+

  • Mosakoli 8:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Moto moko te azali na bokonzi likoló ya elimo mpo na kopekisa elimo;+ mpe moto moko te azali na bokonzi likoló ya mokolo ya liwa;+ ndingisa ya kolongwa na etumba ezali mpe te.+ Mpe mabe ekobikisa ata moke te baoyo bazali komipesa na yango.+

  • Mosakoli 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Makambo ndenge moko ekómelaka bango nyonso.+ Nsuka ezali kaka moko+ mpo na moyengebene+ ná moto mabe,+ mpo na moto malamu ná moto ya pɛto ná moto ya mbindo, mpo na moto oyo azali kopesa mbeka ná moto oyo azali kopesa mbeka te. Moto malamu azali ndenge moko na mosumuki;+ moto oyo azali kolapa ndai azali ndenge moko na moto oyo abangaki kolapa ndai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto