4 nganga-nzambe asengeli kopesa mitindo; mpe mpo na komipɛtola, ye asengeli kozwa bandɛkɛ+ mibale ya pɛto oyo ezali na bomoi ná nzete ya sɛdrɛ+ ná biloko oyo epakolami langi ya motane makasi+ mpe nzete ya izope.+
18 Na nsima, moto oyo azali pɛto+ asengeli kozwa nzete ya izope+ mpe kozindisa yango na mai mpe komwangisa yango likoló ya hema mpe likoló ya bambɛki nyonso mpe likoló ya milimo nyonso oyo bazalaki kuna mpe likoló ya moto oyo asimbaki mokuwa to moto oyo babomi to ebembe to lilita.
14 bongo makila+ ya Kristo, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki+ epai ya Nzambe na litɔnɔ te, ekopɛtola+ lisosoli na biso koleka te na misala oyo ezali kobota mbuma te+ mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?+