Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 51:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Sukolá ngai mobimba na libunga na ngai,+

      Mpe pɛtolá ngai na lisumu na ngai.+

  • Nzembo 78:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Kasi azalaki na motema mawa;+ azalaki kozipa libunga+ mpe azalaki koyeisa libebi te.+

      Mpe mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima,+

      Mpe azalaki kolinga te kolamwisa nkɛlɛ na ye nyonso.

  • Nzembo 79:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Ee Nzambe ya lobiko na biso, salisá biso,+

      Mpo na nkembo ya nkombo na yo;+

      Bikisá biso mpe zipá masumu na biso mpo na nkombo na yo.+

  • Yisaya 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova alobi: “Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.+ Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ;+ ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi, ekokóma lokola lɛnɛ.

  • Yoane 1:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mokolo oyo elandaki, amonaki Yesu azali koya epai na ye, mpe alobaki ete: “Talá, Mwana-Mpate+ ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu+ ya mokili!+

  • Baebre 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 bongo makila+ ya Kristo, oyo na nzela ya elimo moko ya seko amikabaki+ epai ya Nzambe na litɔnɔ te, ekopɛtola+ lisosoli na biso koleka te na misala oyo ezali kobota mbuma te+ mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu?+

  • 1 Yoane 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nzokande, soki tozali kotambola na pole lokola ye moko azali na kati ya pole,+ tosangani lisangá,+ mpe makila+ ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola+ biso na lisumu nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto